Olingi okende wapi na carrière na yo? Soins de santé, construction, fabrication, énergie propre na infrastructure, IT, éducation, hospitalité? Ba industries wana nionso pe ebele eza na ba programmes ya apprentissage. Mpe bazali kozela kotia yo na nzela ya mosala oyo ezali na bosenga, na lifuti malamu, bokengi ya mosala, mabaku ya kokende liboso, mpe mosala ya ntina.
Kosala mosala ya koyekola mosala ezali liponi ya mayele. Talá kaka mwa matomba oyo ekoki kozwama:
- Kofuta kelasi na yo te ... zwa mbongo mpo na yango
- Nyongo te oyo euti na kelasi
- Bozwa ba credentiels mpe ba certifications oyo okoki komema elongo na yo
- Bokambami ya bato ya mayele na mosala yango
- Bobateli ya mosala
- Nzela ya mosala mpo na kokende liboso
- Mosala ya ntina, ya maboko
- Soki ozali koyekola mingi, okozwa mbongo mingi
Applicable Counties
- Statewide
What to expect
Ba apprentissage ekoki kozwama na nzela ya carte interactive na site internet ya Programme ya Apprentissage ya Maine, mpe lisusu na Maine JobLink , tableau ya misala ya ofele mpe ya pete mpo na kosalela, na koponáká filtre "Apprenticeship".