Epesaka ba professionnels ya mayele mpe baye bazali na expérience na ba programmes ya ba métiers pona ko soutenir emploi na ba licences. Tozali kopesa toli mpe boyangeli makambo, lisungi ya licence mpe ya bopesi mikanda ya bondimi, ba ateliers oyo etali mingi mayele ya komibongisa mpo na mosala, boyokani na bapatrɔ, mabaku ya mosala, mpe ya kosala réseau, mpe misala misusu oyo ebongisami mpo na kosala ete bato ya mosala bazala pene ya bato ya sika ya Amerika ya misala nyonso balonga mikakatano mpo na kozwa mosala ya ntina. Tosalaka mpe mpo na kokangisa bapatrɔ na bato oyo bayebi mosala malamu mpe oyo bazali na mposa ya kosala makambo.
Applicable Counties
- Statewide
What to expect
NMRC ekangisaka ba patrons na ba professionnels ya mayele mingi, ya makoki pe ya ndenge na ndenge. Tokoki ko connecter yo na pool ya talent ya ba professionnels oyo batangi kelasi malamu, oyo bapesameli ndingisa ya mosala oyo ba memelaka perspective mondiale, expérience internationale, makoki ya koloba minoko ebele mpe oyo bazali na posa makasi ya ko contribuer na ba communautés na bango. Tosalisa yo ozwa candidat moko ya munene!