Mokano ya misala ya Réadaptation Professionnelle ezali ya kosalisa yo ozwa mosala, kobatela to kozonga na mosala.
Okoki kozwa:
- Toli mpe bokambi ya moto na moto, mpe botalisi ya mosala.
- Formation mosusu, ba appareils, traitement, placement ya mosala pe ba services ya suivi pona ko permettre yo olonga na musala moko.
- Kobanda na mibu 14, misala ya VR ezali mpe mpo na kosunga banakelasi na mbongwana uta na eteyelo ya likolo mpo na kokende mosala. Tala lokasa na biso ya Bilenge mpe Bobongwani .
- Misala ya bomoi ya lipanda Formation adaptative ya makoki epesaka mayele mosusu mpo na kokokisa misala ya bomoi ya mokolo na mokolo.
- Kolakisa mayele ya kosala ndako ekoki kozala kolamba bilei, kosomba biloko, mpe kosukola.
- Bato bakoki kozwa formasyo na mayele ndenge na ndenge ya kotambwisa makambo na bango moko, na ndakisa kotambwisa mbongo, kobenga telefone, mpe koyebisa ngonga.
- Mateya ya kotambola esalisaka bato básala mobembo na libateli na nzela ya kosalela mayele mosusu.
- Ba services epesami na basali na biso ya ba multidisciplinaires en conjonction na ba thérapeutes ya réadaptation ya vision ya The Iris Network..
- Mibeko oyo etambwisaka Programme ya IL ya ba aveugles (Liloba) .
- Misala ya mobimba mpo na bana mpe mabota ebandaka ntango kaka mwana ayebani lokola mokufi miso to azali komona malamu te. Basali na biso ya mayele mingi, elongo na balakisi ya Catholic Charities Maine, basalaka elongo na baboti mpe biteyelo mpo na kosala mpe kosalela programme ya mateya oyo etali moto na moto. Mpo na koyeba makambo mingi benga Catholic Charities Maine .
- Mateya ya Orientation mpe Mobilité mpo na kokolisa mayele ya mobembo ya lipanda :
- Maloba ya ebandeli mpo na Orientation mpe Mobilité (9,28 minutes)
- Orientation mpe Mobilité na Maine (5,10 minutes)
- Pona Molakisi ya Orientation mpe Mobilité: Senga Ba Informations Misusu mpo na kosolola na moto moko na ntina ya kokoma O&M na Maine.
- Misala ya entreprise ya mombongo Epesaka mateya mpe lisungi mpo na kotambwisa ba snack bars, ba cafétérias mpe ba installations ya machine à vendre na ba biens fédéraux mpe municipales ya l’Etat.
- Kota na lokasa ya ebandeli ya Programme d’entreprise d’affaires mpo na koyeba makambo mosusu.
Applicable Counties
- Statewide